Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 4:25 - Mokanda na Bomoi

25 Nazali koloba na bino penza ya solo : ezalaki na basi ebele bakufisa mibali kati na Isalaele, na tango ya Eliya, tango likolo ekangamaki mibu misato mpe basanza motoba, mpe nzala makasi ezalaki kati na ekolo mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 4:25
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi : — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.


« Makanisi na Ngai ezali makanisi na bino te, mpe banzela na Ngai ezali banzela na bino te, » elobi Yawe.


Boni, nazali na ndingisa te ya kosala na mbongo na ngai nyonso oyo nalingi ? Osilikeli ngai mpo ete nazali moto malamu ? »


Kaka na tango yango, awa Molimo Mosantu atondisaki Ye na esengo, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te obombaki makambo oyo, mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike. Iyo, Tata, pamba te yango nde osepelaki kosala.


Pamba te alobaki na Moyize : « Nakotalisa ngolu epai ya moto oyo Ngai nasepeli kosalela ngolu, mpe nakoyokela mawa moto oyo Ngai nasepeli koyokela mawa. »


Oh moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe ? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : « Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo ? »


Kati na Klisto, Nzambe aponaki biso lisusu mpo ete tokitana na libula na biso, kolanda mabongisi ya Ye oyo akokisaka nyonso, kolanda makanisi ya mokano na Ye,


mpe na kolakisa biso mabombami ya mokano na Ye, mabombami oyo abongisa kati na Klisto kolanda bolamu na Ye,


Eliya azalaki moto lokola biso, abondelaki na molende nyonso mpo ete mvula enoka te, mpe mvula enokaki te na mabele mibu misato na basanza motoba ;


Batatoli yango mibale bazali na nguya ya kokanga Likolo mpo ete mvula enoka te na mikolo oyo bakozala kosakola. Bazali mpe na nguya ya kobongola mayi mpo ete ekoma makila, mpe ya kotinda pasi ya lolenge nyonso na mabele, na tango nyonso oyo balingi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ