Luka 4:23 - Mokanda na Bomoi23 Yesu alobaki na bango : — Nayebi malamu ete bokoloba na Ngai lisese oyo : « Monganga, mibikisa yo moko ! » Mpe bokoloba na Ngai : « Sala mpe awa, kati na engumba na Yo, makambo oyo toyokaki ete osalaki yango kati na Kapernawumi ! » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo : ‹ Ndeko na ngai, tika ete nalongola yo mwa lititi oyo ezali kati na liso na yo, › wana ozali kokoka komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko. Bolole ! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo okomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.