Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 4:22 - Mokanda na Bomoi

22 Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 4:22
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Motema na ngai etondi na maloba kitoko. Namilobeli : Nakotatola misala na ngai mpo na mokonzi. Tika ete lolemo na ngai ezala lokola ekomeli ya mokomi ya mayele.


Elombe ya bitumba, kanga mopanga na loketo na Yo ! Lata lokumu mpe kongenga.


Bibebu ya moto ya sembo eyebaka makambo oyo ezali malamu, kasi monoko ya moto mabe ezalaka kaka na makambo mabe.


Babengaka moto oyo azali na motema ya bwanya moto ya mayele, mpe bibebu ya kimia ebakisaka boyebi.


Liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezali lokola wolo oyo basangisi na palata.


Maloba ya moto ya bwanya epesaka esengo, kasi maloba ya zoba elukelaka ye makambo.


Elobeli na ye esalaka elengi na motema, mpe nzoto na ye mobimba esalaka ete balula ye. Tala ndenge mobali na ngai ya motema, molingami na ngai, azali, oh bilenge basi ya Yelusalemi !


Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli, mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba moto oyo alembi ; alamusaka ngai tongo nyonso, alamusaka litoyi na ngai mpo ete nayoka lokola moyekoli.


Bato nyonso oyo bazalaki koyoka Ye bazalaki kokamwa mingi mayele na Ye mpe biyano na Ye.


Tango baboti na Ye bamonaki Ye, bakamwaki mingi. Mama na Ye alobaki na Ye : — Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye ? Tata na yo mpe ngai tozalaki mitema likolo, mpe toluki Yo bisika nyonso !


Pamba te, Ngai moko, nakopesa bino maloba oyo bosengeli koloba mpe bwanya oyo ekosala ete banguna na bino nyonso bandima nyonso oyo bokoloba.


Bongo akomaki koloba na bango : — Makomi oyo bowuti koyoka ekokisami lelo !


Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye : — Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.


Bakomaki koloba : — Boni, wana ezali Yesu te ? Ezali mwana mobali ya Jozefi te ? Toyebi malamu tata mpe mama na ye ! Bongo ndenge nini azali koloba : « Nawuti na Likolo ? »


Bakengeli bazongisaki : — Ezali na moto ata moko te oyo asila koloba makambo oyo moto wana azali koloba.


Kasi bazangaki makoki ya kotelemela bwanya mpe Molimo oyo azalaki kotinda ye koloba.


salela maloba ya kimia mpe ezanga pamela, mpo ete bato oyo batelemelaka yo bayoka soni mpe bazanga mabe ya koloba na tina na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ