Luka 4:18 - Mokanda na Bomoi18 « Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.
« Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango : Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.
Boye, Yesu azongiselaki bayekoli oyo Yoane atindaki : — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe oyo boyoki : bakufi miso bazali komona, bakufi matoyi bazali koyoka, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.