Akendeki na Nazareti epai wapi akolaki ; mpe na mokolo ya Saba, akotaki na ndako ya mayangani, ndenge ezalaki momesano na ye. Atelemaki mpo na kotanga,
Bongo akangaki buku yango, azongisaki yango epai ya mosali ya ndako ya mayangani mpe avandaki. Miso ya bato nyonso kati na ndako ya mayangani ekomaki kotala Ye.
Sima na kotanga Mobeko mpe Basakoli, bakambi ya ndako ya mayangani batindelaki bango maloba : — Bandeko, soki bozali na maloba mpo na kolendisa bato, bokoki na bino koloba.
Bato ya Yelusalemi mpe bakambi na bango basosolaki te soki Yesu azali nani ; basosolaki mpe te maloba ya basakoli oyo etangamaka mikolo nyonso ya Saba. Nzokande, tango bakatelaki Ye etumbu, bakokisaki nde masakoli yango.