14 Yesu azongaki na Galile, atonda na nguya ya Molimo ; mpe basango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka wana mobimba.
Tango Yesu ayokaki ete babwaki Yoane Mobatisi kati na boloko, azongaki na Galile.
Sango ya likambo yango epanzanaki na etuka wana mobimba.
Kasi bango, tango kaka babimi, bakomaki kopanza sango na Ye kati na etuka wana mobimba.
Tango babwakaki Yoane kati na boloko, Yesu akendeki na Galile epai wapi azalaki koteya Sango Malamu ya Nzambe.
Mbala moko, sango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka mobimba ya Galile.
Tango Satana asilisaki komeka Yesu na lolenge nyonso, akendeki mosika na Ye kino na mokolo oyo ekatama.
Mpe sango na tina na Yesu epanzanaki na bamboka ya etuka mobimba.
Sima na mikolo mibale, Yesu alongwaki wana mpe akendeki na Galile.
Boyebi makambo oyo esalemaki na Yuda mobimba, kobanda na Galile, sima na libatisi oyo Yoane ateyaki :