Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 3:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema, mpe bokoma te komilobela : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 3:8
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bozongisela bango na lombangu bilanga na bango, bilanga na bango ya vino, bilanga na bango ya banzete ya olive mpe bandako na bango ; mpe botikela bango eteni ya nkama moko ya mbongo, ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta oyo bokatelaki bango lokola mileki.


« Mwana na moto, bavandi ya bisika oyo ebeba kati na mokili ya Isalaele bazali koloba : ‹ Abrayami azalaki kaka ye moko tango azwaki mokili lokola libula ; nzokande biso, tozali ebele ; boye, solo, mokili epesameli biso lokola libula ! ›


Yango wana, nazali koyebisa bino ete Bokonzi ya Nzambe ekolongolama kati na bino mpo ete epesama na bato oyo bakokoka kolakisa misala na yango. [


Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema.


Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.


Tango Nkolo ndako akotelema mpe akokanga ekuke, bokotikala libanda, bokobanda kobeta ekuke mpe kobondela : « Nkolo, Nkolo, fungolela biso ! » Kasi Ye akozongisela bino : « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te ! »


Bongo bokoloba : « Toliaki mpe tomelaki mesa moko elongo na Yo, mpe oteyaki na babalabala na biso ! »


Soki esalemi bongo, moto oyo abengisi bino mibale akoya koloba na yo : ‹ Tikela moto oyo kiti na yo ! › Bongo, na soni nyonso, okokende kozwa esika ya suka.


Yesu azongisaki : — Nazali koloba na bino : soki bango babateli kimia, mabanga ekoganga !


Yesu alobaki na ye : — Lelo, lobiko eyei na ndako oyo, mpo ete ye mpe azali mwana ya Abrayami.


Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bakomaki kokanisa : — Moto oyo azali komimona penza nani mpo ete abimisa maloba ya kotiola Nzambe ? Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te ?


Bazongiselaki Ye : — Biso, tozali bato ya libota ya Abrayami, totikala kozala te bawumbu ya moto ; ndenge nini oloba ete tokokoma bansomi ?


Bazongisaki : — Ezali Abrayami nde azali tata na biso. Yesu alobaki na bango : — Soki bozalaki bana ya Abrayami, bolingaki kosala misala oyo Abrayami asalaki.


Nateyaki liboso bavandi ya Damasi ; sima, nateyaki bavandi ya Yelusalemi, ya Yuda mobimba mpe ya bikolo ya bapaya : nateyaki bango ete basengeli kobongola mitema, kozonga epai ya Nzambe mpe, na nzela ya misala na bango, kolakisa penza ete babongoli mitema.


Yango wana, elaka eyaka na nzela ya kondima, mpo ete ezala na nzela ya ngolu mpe mpo ete ezala mpo na bakitani nyonso ya Abrayami : kaka te mpo na ba-oyo babengami bakitani na nzela ya Mobeko, kasi mpe mpo na ba-oyo bazali na kondima ya Abrayami oyo azali tata na biso nyonso,


mpe bakitani nyonso ya Abrayami bazali bana na ye te. Pamba te Nzambe alobaki na Abrayami : « Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. »


bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na Yesu-Klisto, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ