Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »
Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.
— Mwana ya Satana mpe monguna ya makambo nyonso ya sembo ! Otondi na lolenge nyonso ya lokuta mpe ya mayele mabe ! Kino tango nini okotika kobebisa mabongisi ya Nkolo, oyo ezali sembo ?
Moto oyo amipesaka na masumu azali ya Satana, pamba te Satana asalaka masumu wuta na ebandeli. Nzokande Mwana na Nzambe ayaki penza mpo na kobebisa misala ya Satana.