Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 3:33 - Mokanda na Bomoi

33 Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi ; Aminadabi, mwana mobali ya Adimini ; Adimini, mwana mobali ya Arini ; Arini, mwana mobali ya Etsironi ; Etsironi, mwana mobali ya Peretsi ; Peretsi, mwana mobali ya Yuda ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 3:33
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Agangaki : « Na mbala oyo, nakokumisa Yawe. » Yango wana apesaki ye kombo « Yuda. » Mpe akataki kobota.


Kasi azongisaki loboko na ye, mpe ndeko na ye ya mobali abimaki. Bongo mwasi oyo abotisaka alobaki : « Ofungoli nzela nini mpo na kobima ? » Mpe bapesaki ye kombo « Peretsi. »


Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi : Etsironi mpe Amuli.


Yuda, bandeko na yo ya mibali bakokumisa yo, loboko na yo ekozala na kingo ya banguna na yo ; bana mibali ya tata na yo bakogumbama liboso na yo.


Utayi, mwana mobali ya Amiwudi, mwana mobali ya Omiri, mwana mobali ya Imiri, mwana mobali ya Bani, moko kati na bakitani ya Peretsi, mwana mobali ya Yuda.


Na ngambo ya este epai wapi moyi ebimaka, milongo ya mampinga ya Yuda bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Yuda ezali Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi.


mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. Yango nde ezalaki makabo ya Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi.


Davidi, mwana mobali ya Izayi ; Izayi, mwana mobali ya Obedi ; Obedi, mwana mobali ya Boazi ; Boazi, mwana mobali ya Salimoni ; Salimoni, mwana mobali ya Nashoni ;


Yuda, mwana mobali ya Jakobi ; Jakobi, mwana mobali ya Izaki ; Izaki, mwana ya Abrayami ; Abrayami, mwana mobali ya Tera ; Tera, mwana mobali ya Naori ;


Tika ete bakitani oyo Yawe akopesa yo na nzela ya elenge mwasi oyo, bakomisa ndako na yo lokola ndako ya Peretsi oyo Tamari abotelaki Yuda !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ