Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 3:3 - Mokanda na Bomoi

3 Yoane akomaki kotambola na etuka mobimba, zingazinga ya moluka Yordani ; na mateya na ye, azalaki koloba : « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 3:3
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.


Akozongisa bato ebele ya Isalaele epai ya Nkolo, Nzambe na bango,


mpe mpo na koyebisa bato na Ye ete Nzambe akobikisa bango mpe akolimbisa masumu na bango,


Yesu atondisamaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani, mpe Molimo amemaki Ye kati na esobe


Makambo oyo nyonso esalemaki na Betani, na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi Yoane azalaki kobatisa.


Bakendeki epai ya Yoane mpe balobaki na ye : — Moteyi, ozali koyeba lisusu moto oyo azalaki elongo na yo, na ngambo mosusu ya Yordani, oyo na tina ye opesaki litatoli ? Ye mpe azali kobatisa bato, mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.


Liboso ete Yesu aya, Yoane ateyaki bato nyonso ya Isalaele ete babongola mitema mpe bazwa libatisi.


Polo alobaki na bango : — Libatisi oyo Yoane azalaki kopesa ezalaki libatisi ya kobongola motema ; azalaki koloba na bato ete bandimela moto oyo akoya sima na ye, elingi koloba ete bandimela Yesu.


Mpo na nini ozali kolekisa tango ? Telema, zwa libatisi mpe belela Kombo ya Nkolo mpo ete opetolama na masumu na yo. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ