17 Asimbi kiyungulu na loboko na Ye mpo na kopetola etando na Ye mpe mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba matiti oyo ekotikala na nzela ya moto oyo ekufaka te.
Nakoyungola bango na nzela ya bipepelo na bikuke ya engumba, nakobotola bango bana na bango mpe nakoboma bato na Ngai, pamba te babongoli bizaleli na bango te.
Kasi bayebi makanisi na Yawe te mpe bazali kososola mabongisi na Ye te, Ye oyo asangisaki bango lokola maboke ya matiti ya ble na etando oyo batutelaka yango.
Botika nyonso mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka bambuma. Ezali na tango wana nde nakoloba na bato oyo babukaka bambuma : Bolongola liboso matiti mabe, bokanga yango maboke-maboke mpe botumba yango ; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na Ngai ya bambuma. › »
Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »