Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 3:16 - Mokanda na Bomoi

16 Yoane azongiselaki bango : — Ngai nazali kobatisa bino na mayi ; kasi ezali na Moto moko oyo azali koya, aleki ngai na nguya, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe na moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 3:16
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki boyoki makebisi na Ngai, nakosopela bino Molimo na Ngai mpe nakososolisa bino maloba na Ngai.


kino tango Molimo akosopanela biso wuta na likolo, bongo esobe ekokoma bilanga oyo ebotaka kitoko ; mpe bilanga oyo ebotaka kitoko ekomonana lokola zamba monene.


Yawe akolongola botutu ya basi ya Siona, akopetola Yelusalemi oyo ekomaki mbindo na bilembo ya makila, na nzela ya molimo ya kosambisa mpe ya moto.


Nakobwakela bino mayi ya peto, mpe bokokoma peto ; nakopetola bino na mbindo na bino nyonso mpe na mbindo ya banzambe na bino nyonso ya bikeko.


Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto, nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto mpe nakomeka bango ndenge bamekaka wolo na moto ; bakobelela Kombo na Ngai, mpe Ngai nakoyanola bango. Nakoloba na bango : ‹ Bozali bato na Ngai, › mpe bango bakoloba : ‹ Yawe azali Nzambe na biso ! › »


Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.


Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »


Yoane azongiselaki bango : — Ngai, nazali kobatisa na mayi ; kasi kati na bino, ezali na Moto moko oyo bino boyebi te ;


azali koya sima na ngai, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.


Ngai moko mpe nayebaki Ye te ; kasi Ye oyo atindaki ngai kobatisa na mayi alobaki na ngai : « Moto oyo okomona Molimo kokita mpe kowumela likolo na Ye, Ye nde akobatisa kati na Molimo Mosantu. »


Moto oyo akondima Ngai, kolanda ndenge Makomi elobi, bibale ya mayi ya bomoi ekotiola wuta kati na ye.


Pamba te Yoane abatisaki na mayi ; kasi bino, sima na mwa mikolo, bokobatisama kati na Molimo Mosantu. »


Wana Petelo azalaki nanu koloba, Molimo Mosantu akitelaki bato nyonso oyo bazalaki koyoka Liloba.


Sima na loboko ya mobali ya Nzambe konetola Ye, azwaki epai ya Tata, Molimo Mosantu oyo Ye Tata alakaki, mpe asopeli biso Molimo Mosantu yango ndenge bozali komona mpe koyoka sik’oyo.


Solo, biso nyonso tobatisamaki kati na Molimo moko mpo na kosala nzoto moko : ezala Bayuda to Bagreki, ezala bawumbu to bansomi. Mpe epesamelaki biso nyonso komela Molimo wana se moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ