Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 3:14 - Mokanda na Bomoi

14 Basoda mpe batunaki ye : — Bongo biso, tosengeli kosala nini ? Yoane azongiselaki bango : — Bobotola mbongo ya bato te mpe bokosela bato makambo te ; kasi bosepela kaka na lifuti na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 3:14
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo.


Okopanza sango ya lokuta te ; okosangana te na moto mabe mpo na koloba litatoli ya lokuta.


Okoyiba te, okoloba lokuta te, moto moko te akosa moninga na ye.


Tango Yesu akotaki na Kapernawumi, mokonzi moko ya basoda ayaki epai na Ye mpe asengaki Ye lisungi.


Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye : — Nkolo, nazali kopesa, awa mpe sik’oyo, kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola ; mpe, soki nabotolaki biloko ya moto, nazali kozongisela ye yango mbala minei.


Ebele ya bato batunaki ye : — Tosengeli kosala nini ?


Azongiselaki bango : — Tango bofutisaka mpako, bobakisaka mbongo mosusu te na likolo ya oyo esengeli kofutama.


Tango kaka anjelu oyo asololaki na ye akendeki, Kornei abengaki basali mibale kati na basali na ye, mpe soda moko oyo azalaki komipesa na makambo ya Nzambe, kati na basoda oyo bazalaki kosalela ye.


mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili


Nalobi bongo te mpo ete nazali kokelela, pamba te nayekola kosepela na oyo nazali na yango.


Teya mpe bamama mibange ete bazala na bizaleli oyo ekoki na bato oyo bamibulisa mpo na Nzambe : basengeli te kotongaka bato mpe kozala bawumbu ya masanga ; basengeli nde komipesa na koteyaka makambo ya malamu,


Bongo nayokaki, kati na Lola, mongongo moko ya makasi koloba : « Tango ya lobiko, ya nguya, ya Bokonzi ya Nzambe na biso, mpe ya nguya ya Klisto na Ye ekoki. Pamba te Mofundi ya bandeko na biso, oyo afundaka bango butu mpe moyi, liboso ya Nzambe na biso, abwakami na mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ