Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 3:13 - Mokanda na Bomoi

13 Azongiselaki bango : — Tango bofutisaka mpako, bobakisaka mbongo mosusu te na likolo ya oyo esengeli kofutama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 3:13
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Natosaka mibeko na Ye nyonso mpe nabatelaka bikateli na Ye.


Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te, kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.


Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo : Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.


Nyonso oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango ; pamba te yango nde mateya nyonso ya Mobeko mpe ya basakoli.


Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye : — Nkolo, nazali kopesa, awa mpe sik’oyo, kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola ; mpe, soki nabotolaki biloko ya moto, nazali kozongisela ye yango mbala minei.


Bafutisi mpako mpe bayaki mpo ete babatisa bango ; batunaki Yoane : — Moteyi, tosengeli kosala nini ?


Basoda mpe batunaki ye : — Bongo biso, tosengeli kosala nini ? Yoane azongiselaki bango : — Bobotola mbongo ya bato te mpe bokosela bato makambo te ; kasi bosepela kaka na lifuti na bino.


miyibi, bato ya lokoso ya mbongo, balangwi masanga, bato oyo bakoselaka baninga makambo mpo na kobebisa lokumu na bango, ba-oyo babotolaka biloko ya bato, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.


Tika ete moyibi ayiba lisusu te, kasi amipesa nde na mosala ; mpe tika ete maboko na ye esala na bosembo nyonso mpo ete azwa eloko ya kosunga na yango moto oyo azali kati na bosenga.


Yango wana, lokola batatoli ebele bazingeli biso, tobwaka mikumba mpe masumu nyonso oyo ezali kozingela biso na bangambo nyonso mpe topota mbangu, na molende nyonso, kati na momekano oyo ezali liboso na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ