Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 24:6 - Mokanda na Bomoi

6 Azali lisusu awa te, asekwi. Bokanisa makambo oyo ayebisaki bino, wana azalaki nanu kati na Galile :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 24:6
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te, ndenge Yona avandaki kati na libumu ya mbisi monene mikolo misato mpe babutu misato, ndenge wana mpe Mwana na Moto akosala mikolo misato mpe babutu misato na se ya mabele.


Wuta na tango wana, Yesu akomaki koloba polele na bayekoli na Ye ete asengeli kokende na Yelusalemi, asengeli komona pasi mingi na maboko ya bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.


mpo na koloba na ye : — Mokonzi, makanisi ezongeli biso na tina na mokosi wana ! Tango azalaki na bomoi, alobaki : « Sima na mikolo misato, nakosekwa. »


Azali lisusu awa te, pamba te asili kosekwa, ndenge kaka alobaki. Boya kotala esika oyo nzoto na Ye ezalaki,


Kasi alobaki na bango : — Bobanga te ! Bozali koluka Yesu ya Nazareti, oyo babakaki na ekulusu ? Azali awa te, asili kosekwa. Botala esika oyo batiaki Ye.


Yesu akomaki koteya bango : — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye, basengeli koboma Ye, mpe, sima na mikolo misato, asengeli kosekwa.


oyo balobaki na bango : — Ezali ya solo, Nkolo asekwi ; abimelaki Simona !


Basi yango babangaki, bakitisaki bilongi na bango na ngambo ya mabele ; kasi bato wana mibale balobaki na bango : — Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi Ye oyo azali na bomoi ?


Mpe alobaki : — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye. Basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.


— Boyoka na bokebi makambo oyo nazali koyebisa bino : Bazali kokaba Mwana na Moto na maboko ya bato.


Kasi Nzambe abukaki minyololo ya kufa, asekwisaki Ye, pamba te ekokaki kosalema te ete kufa ekanga Ye.


Boni, bobosani ete nazalaki koyebisa bino makambo yango tango nazalaki elongo na bino ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ