Boyoki Ngai koloba na bino ete nakeyi, mpe lisusu ete nakozongela bino. Soki bozalaki kolinga Ngai, bolingaki kosepela na kokende na Ngai epai ya Tata, pamba te Tata aleki Ngai na monene.
Bino mpe ndenge moko, bozali sik’oyo na mawa ; kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe moto ata moko te akokoka kolongola bino esengo yango.
Nzokande, nalobi na Ngai kaka bosolo. Ezali penza mpo na bolamu na bino ete Ngai nakende ; pamba te soki nakeyi te, Molobeli akoya te epai na bino ; kasi soki nakeyi, nakotindela bino Ye.
Bantoma bazongaki na Yelusalemi wuta na ngomba oyo babengaka Ngomba ya banzete ya Olive, oyo ezali pene ya Yelusalemi, na mosika ya bametele pene nkoto moko.
Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te,