Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 24:51 - Mokanda na Bomoi

51 Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 24:51
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana bazalaki kotambola mpe kosolola, mbala moko shar ya moto mpe bampunda ya moto ekabolaki bango mibale ; mpe Eliya amataki na likolo na nzela ya mopepe makasi.


Sima na Nkolo Yesu koloba na bango, amemamaki kati na Likolo mpe avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.


Yesu amemaki bango na libanda ya engumba, pene ya Betani ; mpe kuna, atombolaki maboko mpe apambolaki bango.


Bongo bagumbamelaki Ye mpe bazongaki na Yelusalemi na esengo makasi.


Yesu alobaki na ye : — Kosimba Ngai te, pamba te nanu namati te epai ya Tata na Ngai. Kende nde epai ya bandeko na Ngai mpe yebisa bango ete nakeyi epai ya Tata na Ngai, oyo azali mpe Tata na bino ; epai ya Nzambe na Ngai, oyo azali mpe Nzambe na bino.


Sima na Yesu koloba bongo, amemamaki, wana bazalaki kotala, mpe lipata moko ezipaki Ye na miso na bango.


Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,


Yango wana, lokola tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akatisa Likolo, Ye Yesu, Mwana na Nzambe, tosimba makasi kondima oyo totatolaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ