Luka 24:44 - Mokanda na Bomoi44 Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.
Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.
Na mokolo wana, makolo na Ye ekotelema likolo ya ngomba ya banzete ya olive oyo ezali na ngambo ya este ya Yelusalemi ; mpe ngomba ya olive ekokabwana na biteni mibale : eteni moko na ngambo ya este mpe eteni mosusu na ngambo ya weste. Lubwaku moko ya monene ekosalema : eteni moko ya ngomba ekokende na ngambo ya nor, mpe eteni mosusu, na ngambo ya sude.