Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 24:41 - Mokanda na Bomoi

41 Lokola bakokaki nanu kondima te mpo ete batondisamaki na esengo mpe bazalaki kokamwa mingi, Yesu atunaki bango : — Bozali awa na eloko ya kolia ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 24:41
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ata nabelelaki Ye, mpe ayanoli ngai, nalingaki na ngai kondima te ete ayoki ngai,


Kasi tango bayokaki ye koloba : « Yesu azali na bomoi, awuti kobimela ngai, » bandimaki ye te.


Bazongaki mpe bayebisaki yango epai ya bayekoli mosusu ; kasi bayekoli yango bandimaki bango te.


Sima na yango, abimelaki bantoma zomi na moko, wana bazalaki kolia, mpe apamelaki bango mpo ete bazalaki na kondima te, mpe mpo ete bazalaki mitema mabanga ; pamba te bandimaki te bato oyo bamonaki Ye sima na lisekwa na Ye.


Bazalaki mpe na mwa ndambo ya bambisi ya mike-mike. Apambolaki yango mpe alobaki na bayekoli na Ye ete bakabola yango.


kasi bazwaki maloba ya basi yango lokola maloba ezanga tina, mpe bandimaki bango te.


Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na Ye.


Bino mpe ndenge moko, bozali sik’oyo na mawa ; kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe moto ata moko te akokoka kolongola bino esengo yango.


Yesu abengaki bango : — Bana na Ngai ! Boni, bozali na mbisi te ? Bazongisaki : — Te !


Tango asosolaki ete ezali mongongo ya Petelo, atondaki na esengo ; na esika ya kofungola ekuke, azongaki mbangu mpe agangaki : — Eh, ezali Petelo ! Azali wana, na libanda, liboso ya ekuke !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ