Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 24:39 - Mokanda na Bomoi

39 Botala maboko mpe makolo na Ngai ; ezali penza Ngai. Bosimba Ngai mpe botala ! Elima ezalaka na mosuni te, ezalaka mpe na mikuwa te ; nzokande, bozali komona malamu ete, Ngai, nazali na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 24:39
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

liboso ete putulu ezonga na mabele epai wapi ewutaki, mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.


Kasi Moyize mpe Aron bakweyaki bilongi kino na mabele mpe bagangaki : — Eh Nzambe ya milimo nyonso ya bato ! Okosilikela lisanga mobimba likolo ya lisumu ya moto moko kaka ?


Yesu agangaki na mongongo makasi : — Tata, nazongisi molimo na Ngai kati na maboko na Yo. Sima na Ye koloba bongo, akataki motema.


Yesu atunaki bango : — Mpo na nini bozali kobanga ? Mpe mpo na nini bozali na tembe kati na mitema na bino ?


Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na Ye.


Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko na Ye mpe mopanzi na Ye. Bayekoli batondaki na esengo tango bamonaki Nkolo.


Bayekoli mosusu balobaki na ye : — Towuti komona Nkolo ! Kasi Toma azongiselaki bango : — Soki ngai namoni te bilembo ya basete na maboko na Ye, soki natie mosapi na ngai te kati na bisika oyo basete etobolaki Ye, mpe soki natie te loboko na ngai kati na mopanzi na Ye, nakotikala kondima te.


Bongo, alobaki na Toma : — Tia mosapi na yo awa, tala maboko na Ngai ; sembola loboko na yo mpe tia yango na mopanzi na Ngai. Kozala te moto oyo azangi kondima, kasi moto na kondima !


Sima na kufa na Ye, amimonisaki epai na bango ; mpe na nzela ya bilembo mingi, alakisaki bango ete azali na bomoi. Abimelaki bango mikolo tuku minei mpe alobelaki bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe.


Tika ete Ye moko Nzambe ya kimia abulisa bino na mobimba na bino ! Tika ete mobimba na bino, molimo, elimo mpe nzoto ebatelama malamu na lolenge ete ezanga pamela na mokolo oyo Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya.


Mpo ete biso nyonso tozalaki na batata ya mosuni, oyo bazalaki kopesa biso bitumbu, mpe tozalaki kaka kotosa bango, bongo mpo na nini te kotosa Tata ya milimo mpo ete tozwa bomoi ?


Oyo ezalaki wuta na ebandeli, oyo toyokaki, oyo tomonaki na miso na biso, oyo totalaki malamu, mpe oyo maboko na biso esimbaki, yango nde tozali kotatola na tina na Liloba na bomoi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ