37 Babangaki mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni elima.
Mozwi alobaki lisusu : « Te, tata Abrayami ! Kasi soki moto moko awuti na mboka ya bakufi mpe akei epai na bango, bakobongola mitema ! »
Yesu atunaki bango : — Mpo na nini bozali kobanga ? Mpe mpo na nini bozali na tembe kati na mitema na bino ?
Balobaki na ye : — Okomi penza na liboma ! Kasi Rode azalaki kaka koloba : — Ya solo penza ! Petelo azali na libanda. Bongo balobaki : — Ekoki kozala anjelu na ye !
Mokonzi alobaki na ye : — Kobanga te, omoni nini ? Mwasi alobaki na Saulo : — Namoni nzambe moko kobima na mabele.