Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 24:36 - Mokanda na Bomoi

36 Wana bazalaki nanu kosolola na tina na makambo yango, Yesu ayaki kotelema na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 24:36
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Namonaki banzela na ye, kasi nakobikisa ye ; nakotambolisa ye mpe nakobondisa ye.


Soki bavandi ya ndako yango babongi na kimia yango, wana tika ete ewumela kati na bango ; soki te, wana tika ete ezonga epai na bino.


Sima na yango, abimelaki bantoma zomi na moko, wana bazalaki kolia, mpe apamelaki bango mpo ete bazalaki na kondima te, mpe mpo ete bazalaki mitema mabanga ; pamba te bandimaki te bato oyo bamonaki Ye sima na lisekwa na Ye.


Na ndako nyonso oyo bokokota, boloba liboso : « Tika ete kimia ezala na ndako oyo ! »


Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !


Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.


Sima na mikolo mwambe, bayekoli ya Yesu basanganaki lisusu kati na ndako. Na mbala oyo, Toma mpe azalaki elongo na bango, mpe bikuke ezalaki ya kokangama. Yesu ayaki, atelemaki kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !


Sima na kufa na Ye, amimonisaki epai na bango ; mpe na nzela ya bilembo mingi, alakisaki bango ete azali na bomoi. Abimelaki bango mikolo tuku minei mpe alobelaki bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe.


Amonanaki epai ya Petelo ; sima, epai ya bantoma zomi na mibale.


Bongo amonanaki epai ya Jake, mpe epai ya bantoma nyonso.


Tika ete Ye moko Nkolo na kimia apesaka bino kimia tango nyonso mpe na lolenge nyonso ! Tika ete Nkolo azala elongo na bino nyonso !


Yoane ; Epai ya Mangomba sambo kati na etuka ya Azia : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino, kowuta na Ye oyo azali, azalaki mpe azali koya, kowuta na milimo sambo oyo bazalaka liboso ya Kiti na Ye ya Bokonzi,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ