34 oyo balobaki na bango : — Ezali ya solo, Nkolo asekwi ; abimelaki Simona !
Bokende sik’oyo koyebisa Petelo mpe bayekoli mosusu : « Akei liboso na bino, na Galile ; ezali kuna nde bokomona Ye, ndenge kaka ayebisaki bino. »
Azali lisusu awa te, asekwi. Bokanisa makambo oyo ayebisaki bino, wana azalaki nanu kati na Galile :
Tango kaka Nkolo amonaki mwasi yango, ayokelaki ye mawa mingi mpe alobaki na ye : — Kolela te !
mpe atindaki bango epai ya Nkolo Yesu mpo na kotuna : — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ?
Sima na kufa na Ye, amimonisaki epai na bango ; mpe na nzela ya bilembo mingi, alakisaki bango ete azali na bomoi. Abimelaki bango mikolo tuku minei mpe alobelaki bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe.
Amonanaki epai ya Petelo ; sima, epai ya bantoma zomi na mibale.