Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 24:29 - Mokanda na Bomoi

29 Kasi bango babondelaki Ye makasi : — Vanda elongo na biso, pamba te pokwa esili kokoma, mpe butu elingi kokota. Boye Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda elongo na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 24:29
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Loti abondelaki bango mingi ; boye bandimaki kokende na ye elongo mpe bakotaki na ndako na ye. Alambelaki bango bilei ya kitoko, atumbaki mapa ezanga levire mpe baliaki.


Mokolo moko, Elize akendeki na Sunemi. Mpe kuna, mwasi moko ya bomengo atungisaki ye mpo na kosenga na ye ete andima kolia na ndako na ye. Boye, tango nyonso Elize azalaki kolekela na Sunami, azalaki kotelema na ndako ya mwasi yango mpo na kolia.


Nkolo alobaki na mosali na ye : « Kende lisusu na banzela mpe na babalabala ya engumba, tinda bango na makasi mpo ete bakota, mpe ndako na ngai etonda na bato.


Tango bakomaki pene ya mboka epai wapi bazalaki kokende, Yesu asalaki lokola nde azali kokende mosika.


Tango avandaki na mesa elongo na bango, akamataki lipa, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango na biteni, mpe apesaki bango yango.


Kati na basi yango, ezalaki na mwasi moko, kombo na ye « Lidi. » Azalaki moteki ya bilamba ya motane, moto ya Tiyatire mpe mogumbameli ya Nzambe. Azalaki koyoka, mpe Nkolo afungolaki motema na ye mpo ete akangama na makambo oyo Polo azalaki koloba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ