Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo mpe nakopesa bango mabele oyo nyonso. Boye mpo na bakitani na yo, bikolo nyonso ya mokili ekomipambola.
Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »
Napesaki mokongo na ngai epai ya bato oyo bazalaki kobeta ngai, matama na ngai, epai ya bato oyo bazalaki kopikola ngai mandefu. Nabombaki elongi na ngai te na kotiolama mpe na basoyi.
Bakovanda lisusu na mokili oyo napesaki na Jakobi, mosali na Ngai, mokili oyo batata na bino bavandaki : bango, bana na bango ya mibali mpe bakitani na bango ya mibali bakovanda kuna mpo na libela ; mpe mosali na Ngai, Davidi, akozala mokambi na bango mpo na libela.
Kati na bimoniseli na ngai ya butu, namonaki moto moko lokola Mwana na Moto koya elongo na mapata ya likolo ; apusanaki pene ya Mpaka oyo azala liboso ya tango, mpe bamemaki ye liboso na Ye.
Batikali ya Jakobi bakozala, kati na bikolo ebele lokola mamwe oyo ewuti epai na Yawe, mpe na likolo ya matiti lokola londende oyo ekweyaka na makasi ya moto te to mpe etalelaka moto te.
Oh mopanga, telema ! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.
Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo ! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.
Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »
Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye : — Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.
Pamba te Moyize alobaki : « Yawe, Nzambe na bino, akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino ; bosengeli kotosa nyonso oyo akoloba na bino.
Basakoli nyonso, kobanda na Samuele kino na basakoli oyo bayaki sima na ye, bango nyonso basakolaki na tina na makambo oyo ezali kosalema na mikolo oyo.
Bongo nafukamaki na makolo ya anjelu mpo na kogumbamela ye, kasi alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo, oyo babatelaka litatoli ya Yesu. Fukamela nde Nzambe ! Pamba te ezali litatoli ya Yesu nde molimo ya lisakoli. »