21 Tozalaki kolikya ete Ye nde akokangola Isalaele. Kasi longola nyonso wana, lelo ezali mokolo ya misato wuta makambo wana esalemaki.
Ye nde akokangola Isalaele na bambeba na yango nyonso.
« Mpo na Siona, mosikoli akoya epai ya bato ya Jakobi, oyo bakobongwana na masumu na bango, » elobi Yawe.
« Tika ete Nkolo, Nzambe ya Isalaele, akumisama, pamba te ayei mpe akangoli bato na Ye ;
Awa ayaki mpe kaka na ngonga wana, abandaki kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe koloba na tina na Mwana Yesu, epai ya bato nyonso oyo bazalaki kozela ete Nzambe akangola Yelusalemi.
Lokola basanganaki zingazinga na Ye, batunaki Ye : — Nkolo, ekozala na tango wana nde okozongisa Bokonzi epai ya Isalaele ?
Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto ya Ejipito lobi ? »
Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.