Boye Loti abimaki mpe akendeki koyebisa babandami ya mabala ya bana na ye ya basi. Alobaki : « Bosala noki mpe bobima na esika oyo, pamba te Yawe alingi kobebisa engumba oyo ! » Kasi babandami ya mabala ya bana na ye ya basi bakanisaki ete azali kosala maseki.
Mokonzi ya basoda, oyo mokonzi ya Isalaele azalaki kotiela motema alobaki na moto na Nzambe : — Tala, ata soki Yawe afungoli maninisa ya Lola, likambo ya boye ekoki penza kosalema ? Elize azongisaki : — Okomona yango na miso na yo, kasi okolia yango te.
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tango Yawe azongisaki bato ya Siona longwa na bowumbu, tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto.
Sima na yango, abimelaki bantoma zomi na moko, wana bazalaki kolia, mpe apamelaki bango mpo ete bazalaki na kondima te, mpe mpo ete bazalaki mitema mabanga ; pamba te bandimaki te bato oyo bamonaki Ye sima na lisekwa na Ye.
Petelo alandaki anjelu kino na libanda ya boloko, kasi ayebaki te ete makambo oyo anjelu azali kosala ezali penza ya solo : akanisaki ete azwi emoniseli.