Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi, kasi atikalaki kofungola monoko na ye te lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale ; akangaki monoko na ye.
Bopesa te biloko ya bule epai ya bambwa, noki te ekozongela bino mpo na koswa bino ; bobwaka te bapawuni na bino ya talo epai ya bangulu, noki te ekonyata-nyata yango.
Yesu alobaki na bango : — Bokende koloba na mbwa wana ya zamba : « Nakokoba kobengana milimo mabe mpe kobikisa babeli, lelo mpe lobi ; mpe na mokolo ya misato, nakosilisa mosala na Ngai. »
Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga : « Lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya moto oyo azali kolongola yango bapwale, afungolaki monoko na ye te.
Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.