8 Erode asepelaki mingi tango amonaki Yesu, pamba te, wuta kala, azalaki koluka komona Ye mpo ete ayokaki basango mingi na tina na Ye, mpe azalaki kolikya komona Yesu kosala likamwisi.
Kasi Namani asilikaki, azongaki mpe alobaki : — Nakanisaki ete akoya penza epai na ngai, akobelela Yawe, Nzambe na ye, akotia loboko na ye na esika oyo bokono ezali, mpe akobikisa ngai na bokono na ngai ya maba !
Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi. Bazalaki koloba boye na tina na Yesu : « Yoane Mobatisi asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa ! »
Yesu abengaki ebele ya bato mpe bayekoli na Ye, alobaki na bango : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.
Yesu alobaki na bango : — Nayebi malamu ete bokoloba na Ngai lisese oyo : « Monganga, mibikisa yo moko ! » Mpe bokoloba na Ngai : « Sala mpe awa, kati na engumba na Yo, makambo oyo toyokaki ete osalaki yango kati na Kapernawumi ! »