Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 23:7 - Mokanda na Bomoi

7 Wana ayokaki ete Yesu azali moto ya mboka oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Erode, atindaki Ye epai ya Erode, pamba te Erode azalaki kati na Yelusalemi na mikolo wana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 23:7
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, sango na tina na Yesu epanzanaki makasi mpe ekomaki kino na matoyi ya Erode, moyangeli ya Galile.


Nzokande, Erode amipeselaki mitindo ete bazwa Yoane, bakanga ye minyololo mpe babwaka ye kati na boloko, likolo ya Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko mobali ya Erode ;


Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, mwana mwasi ya Erodiade abinaki liboso ya babengami na feti yango mpe asepelisaki Erode makasi.


Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi. Bazalaki koloba boye na tina na Yesu : « Yoane Mobatisi asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa ! »


Kaka na tango yango, ndambo ya Bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye : — Longwa awa, kende na yo esika mosusu, pamba te Erode akani koboma Yo !


Tango Pilato ayokaki bongo, atunaki soki Yesu azali moto ya Galile.


Tango Tibere Sezare akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Ponse Pilato azalaki moyangeli ya Yuda ; Erode azalaki moyangeli ya Galile ; Filipo, ndeko mobali ya Erode, azalaki moyangeli ya Itureya mpe ya Trakonitide ; mpe Lisaniasi azalaki moyangeli ya Abilene.


Erode, moyangeli ya etuka, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo ezalaki koleka ; amitungisaki makasi, pamba te bamoko bazalaki koloba : « Yoane asekwi, »


Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ