55 Basi oyo bawutaki na Galile elongo na Yesu balandaki Jozefi, bamonaki kunda mpe ndenge nini atiaki nzoto ya Yesu kati na kunda yango.
Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bavandaki wana, na ngambo mosusu ya kunda.
Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Joze, bazalaki kotala esika oyo akotia nzoto ya Yesu.
Kasi bato nyonso oyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki Ye longwa na Galile, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala ndenge makambo ezali koleka.
bakisa ndambo ya basi oyo bakangolamaki na milimo mabe mpe babikisamaki na bokono : Mari, moto ya Magidala, oyo kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo ;