Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 23:5 - Mokanda na Bomoi

5 Kasi batiaki kaka molende mpe balobaki : — Te ! Azali kotombokisa bato ya Yuda mobimba na nzela ya mateya na Ye ; abandaki yango na Galile kino akomi awa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 23:5
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Makasi na ngai ekawuki lokola potopoto, mpe nazali kokoka lisusu koloba te ; otie ngai pembeni ya lilita.


Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai, akopamela bato oyo batungisaka ngai. Nzambe akomonisa bolingo mpe boyengebene na Ye.


Nalembi nzoto likolo ya kobelela lisungi ; mongongo na ngai ekawuki, miso na ngai elembi mpo na kotalela Nzambe na ngai.


Tango Yesu asilisaki kopesa mitindo epai ya bayekoli na Ye zomi na mibale, alongwaki wana, akendeki koteya mpe kopanza Sango Malamu kati na bingumba na bango.


Yesu abotamaki na Beteleemi ya Yuda, wana Erode azalaki mokonzi. Na tango yango, bato ya mayele oyo bawutaki na este bayaki na Yelusalemi


Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpe ete mobulu ya bato ezalaki komata se komata, azwaki mayi, asukolaki maboko na ye liboso ya bato na koloba : — Makila ya moto oyo ekotangama na moto na ngai te, kasi na mito na bino.


Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso.


Tango babwakaki Yoane kati na boloko, Yesu akendeki na Galile epai wapi azalaki koteya Sango Malamu ya Nzambe.


Tango Yesu abimaki na ndako, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko basilikelaki Ye makasi mpe bakomaki kotungisa Ye na nzela ya mituna ya ndenge na ndenge,


Kasi bakobaki kaka kosenga, na koganga makasi koleka, ete babaka Yesu na ekulusu ; mpe suka na suka, koganga na bango elongaki.


Tango Pilato ayokaki bongo, atunaki soki Yesu azali moto ya Galile.


Mokolo oyo elandaki, Yesu azwaki mokano ya kokende na Galile. Na nzela, akutanaki na Filipo mpe alobaki na ye : « Landa Ngai. »


Kasi babandaki koganga : — Boma ye ! Boma ye ! Baka ye na ekulusu ! Pilato alobaki na bango lisusu : — Nasengeli penza kobaka mokonzi na bino na ekulusu ? Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazongisaki : — Tozali kaka na Sezare lokola mokonzi, mokonzi mosusu azali te !


Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.


bamosusu : « Azali Klisto, » kasi bamosusu lisusu : « Boni, Klisto akoki kobimela na Galile ?


Bazongiselaki ye : — Boni, yo mpe ozali moto ya Galile ? Kundola malamu Makomi, mpe okomona penza ete mosakoli moko te abimela na Galile. [


Boyebi makambo oyo esalemaki na Yuda mobimba, kobanda na Galile, sima na libatisi oyo Yoane ateyaki :


Lokola tembe ekomaki makasi koleka, mokonzi ya basoda abangaki ete bakata Polo biteni-biteni ; apesaki mitindo na basoda ete bakita, balongola ye kati na bango mpe bamema ye kati na lopango ya basoda.


Tango bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bazwaki mokano ya kobomisa bantoma.


Tango bato ya Likita-Monene bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bakomaki kolia minu mpo na Etieni.


Bongo, bakangaki matoyi na bango, bagangaki makasi penza, mpe bango nyonso basangelaki ye,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ