44 Na ngonga pene ya midi, molili ekotaki na mokili mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa,
Atindaki molili oyo ekotaki kati na mokili, mpe bato ya Ejipito batombokelaki maloba na Ye te.
Mawa na bino oyo bozali na posa ya mokolo ya Yawe ! Bozali kozela nini na mokolo ya Yawe ? Ekozala mokolo ya molili, kasi ya pole te.
Na mokolo wana, » elobi Nkolo Yawe, « nakosala ete moyi elala na midi, mpe nakoyeisa molili na mokili na moyi makasi.
Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.
bakunda efungwamaki, mpe banzoto ya basantu ebele oyo bakufa esekwaki :
Mpe tango mokonzi ya basoda ya Rome, oyo atelemaki liboso ya Yesu, amonaki ndenge Yesu akufaki, alobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !
Ezalaki mokolo ya suka mpo na kokoma na mokolo ya Pasika, na ngonga ya midi. Pilato alobaki na Bayuda : — Botala mokonzi na bino !
Moyi ekobongwana molili, sanza ekobongwana makila liboso ete mokolo ya Nkolo ekoma, mokolo oyo ya monene mpe ya nkembo.