Tango nandimaki masumu na ngai mpe nabombaki mabe na ngai te, nalobaki : « Nakotubela masumu na ngai liboso ya Yawe. » Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.
Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.
Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.
Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, oyo ezali kati na Paradizo ya Nzambe. »