39 Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye : — Boni, ozali Klisto te ? Mibikisa yo moko mpe bikisa biso !
Babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu bazalaki mpe kofinga Ye ndenge wana.
Tika ete Klisto, Mokonzi ya Isalaele, akita sik’oyo longwa na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima ! Bato oyo babakamaki elongo na Yesu na ba-ekulusu bazalaki mpe kofinga Ye.
Bato batelemaki wana, bazalaki kotala ; mpe bakambi batiolaki Ye, balobaki : — Abikisaki bato mosusu ; tika ete amibikisa ye moko, soki penza azali Klisto, Moponami ya Nzambe !
mpe balobaki : — Soki ozali penza mokonzi ya Bayuda, mibikisa yo moko !
Kasi mobomi bato mosusu apamelaki ye : — Ozali kobanga Nzambe te mpo ete ozali na se ya etumbu ya ndenge moko na oyo ya Ye !