Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 23:30 - Mokanda na Bomoi

30 Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bokweyela biso ! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bozipa biso ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 23:30
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato bakokimela na madusu ya mabanga mpe na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.


Na mokolo wana, bato bakobwaka epai ya bampuku mpe bangembo banzambe na bango ya bikeko ya palata mpe banzambe na bango ya bikeko ya wolo, oyo basalaki mpo ete bafukamela bango.


Bisambelo ya likolo ya bangomba ya Beti-Aveni epai wapi Isalaele azalaki kosala masumu ekobebisama. Banzube mpe basende ekobota na bitumbelo na bango mpe ekozipa yango. Bongo bakoloba na bangomba milayi : « Bozipa biso ! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bokweyela biso ! »


Pamba te soki bato bazali kosala makambo ya boye na nzete ya mobesu, ekozala ndenge nini na nzete ya kokawuka ?


Bazalaki koganga epai ya bangomba mpe epai ya mabanga minene : « Bokweyela biso mpe bobomba biso mpo ete Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi amona biso te, mpe mpo ete kanda ya Mpate ekweyela biso te !


Na basanza wana mitano, bato bakoluka kufa, kasi bakozwa yango te ; bakolinga kokufa, kasi kufa ekokima bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ