28 Yesu abalukaki mpo na kotala basi mpe alobaki : — Bana basi ya Yelusalemi, bolela mpo na Ngai te ; bolela nde mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino.
Oh bilenge basi ya Yelusalemi, nazali mwindo, kasi nazali kitoko ! Solo, nazali mwindo lokola bandako ya kapo ya Kedari, lokola barido ya kitoko na ndako ya kapo ya Salomo.
Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino na kombo ya mboloko mpe ya mbuli ya bilanga : Bolamusa Bolingo na ngai te liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.
Basalaki bisimbelo na yango na palata, mokongo na yango, na wolo. Balatisaki evandelo na yango bilamba ya motuya ya langi ya motane makasi. Bongo, bilenge basi ya Yelusalemi babongisaki kati na yango na motema ya bolingo.
Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino na kombo ya mboloko mpe ya mbuli ya bilanga : Bolamusa Bolingo na ngai te liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.
Elobeli na ye esalaka elengi na motema, mpe nzoto na ye mobimba esalaka ete balula ye. Tala ndenge mobali na ngai ya motema, molingami na ngai, azali, oh bilenge basi ya Yelusalemi !
« Botala, azali koya kati na mapata ! Miso nyonso ekomona Ye, ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. » Ekosalema penza bongo ! Amen.