Ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kotala na mosika. Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake oyo ya elenge, ya Joze mpe ya Salome ;
Yesu abalukaki mpo na kotala basi mpe alobaki : — Bana basi ya Yelusalemi, bolela mpo na Ngai te ; bolela nde mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino.
bakisa ndambo ya basi oyo bakangolamaki na milimo mabe mpe babikisamaki na bokono : Mari, moto ya Magidala, oyo kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo ;
Nazali koloba na bino penza ya solo : wana bino bokozala kolela mpe komitungisa, mokili ekosepela ; bokozala solo na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo.