26 Wana basoda bazalaki kokumba Yesu, bakangaki mobali moko, kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene, oyo awutaki na bilanga ; batiaki ekulusu na mokongo na ye mpo ete amema yango sima na Yesu.
Bongo bato mosusu ya ndako ya mayangani oyo ebengamaka Ndako ya mayangani ya bansomi : Bayuda ya Sirene, ya Alekizandri, ya bituka ya Silisi mpe ya Azia ; bakomaki kotia tembe na miso ya Etieni.