Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 23:25 - Mokanda na Bomoi

25 abimiselaki bango moto oyo basengaki, oyo akangamaki na boloko mpo na mobulu mpe mpo ete abomaki moto, mpe akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete basala Ye nyonso oyo balingi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 23:25
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi alobaki na Amani : — Bomba palata na yo ! Sala nyonso oyo olingi epai ya bato yango.


Pilato abimiselaki bango Barabasi ; mpe sima na kobetisa Yesu fimbu, apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.


Lokola Pilato alingaki kosepelisa ebele ya bato, abimiselaki bango Barabasi longwa na boloko. Sima na kobetisa Yesu fimbu, Pilato apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu.


mpe kuna, bakomaki kofunda Ye : — Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso ! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi !


Pilato azwaki mokano ya kokokisa oyo basengaki ;


Wana basoda bazalaki kokumba Yesu, bakangaki mobali moko, kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene, oyo awutaki na bilanga ; batiaki ekulusu na mokongo na ye mpo ete amema yango sima na Yesu.


Kasi batiaki kaka molende mpe balobaki : — Te ! Azali kotombokisa bato ya Yuda mobimba na nzela ya mateya na Ye ; abandaki yango na Galile kino akomi awa.


Bango nyonso bazongisaki na koganga : — Te ! Ye te ! Bimisa nde Barabasi ! Nzokande, Barabasi azalaki moyibi mpe mobomi bato.


Pilato akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu. Boye, bakamataki Yesu mpe bakendeki na Ye.


Bowanganaki Ye oyo azali Mosantu mpe Sembo. Boye, bosengaki ete Pilato atikela bino mobomi na esika ya Yesu.


Sik’oyo, botala mokonzi oyo boponaki, mokonzi oyo bosengaki. Ezali Yawe nde atie ye mokonzi mpo na kokamba bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ