Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 23:2 - Mokanda na Bomoi

2 mpe kuna, bakomaki kofunda Ye : — Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso ! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 23:2
33 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Akabi amonaki Eliya alobaki na ye : — Yo nde moto ozali kotia mobulu kati na Isalaele ?


Batatoli oyo bamipesa na kanza batelemi, bazali kopesa ngai mituna na tina na makambo oyo nayebi te.


Kino tango nini bokosangela moto moko ? Kino tango nini bino nyonso bokosangana mpo na koluka koboma ye lokola mir oyo etengami, lokola lopango oyo esili kokweya ?


Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se : « Botala ! Somo na bangambo nyonso ! Bofunda ye ! Tofunda ye ! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba : « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! »


Bakalaka balobaki na mokonzi : — Moto oyo asengeli kokufa ! Maloba na ye ezali kolembisa basoda mpe bato oyo batikali kati na engumba oyo ; azali koluka bolamu ya bato oyo te, kasi azali nde koluka mabe na bango.


Amatsia, Nganga-Nzambe ya Beteli, atindelaki Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, maloba oyo : « Amosi azali kosalela yo likita mpo na kosala yo mabe kati na mokili ya Isalaele. Mokili ekoki te kondima koyokaka tango nyonso maloba na ye.


Na sanza moko kaka, nabomaki babateli bibwele misato ; nakokaki lisusu kokanga motema te, mpe etonga eyinaki ngai.


Nzokande, mpo ete totia mobulu te kati na makanisi na bango, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi mpe kamata mbisi oyo okozwa ya liboso ; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo moko ya bibende kati na yango ; kamata mbongo yango mpe futa mpako na Ngai mpe mpako na yo, na maboko na bango.


Bazongisaki : — Ezali ya Sezare. Yesu alobaki na bango : — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !


Yesu asambaki liboso ya moyangeli. Moyangeli atunaki Yesu : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ? Yesu azongisaki : — Olobi yango.


Yesu alobaki na bango : — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe ! Bakamwaki mingi eyano ya Yesu.


Pilato atunaki Yesu : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ? Yesu azongisaki : — Olobi yango.


— Bomemelaki ngai moto oyo mpe bofundaki ye ete azali kotombokisa bato. Napesi ye mituna liboso na bino mpe nazwi ye na mabe ata moko te kati na nyonso oyo bofundelaki ye.


Kasi batiaki kaka molende mpe balobaki : — Te ! Azali kotombokisa bato ya Yuda mobimba na nzela ya mateya na Ye ; abandaki yango na Galile kino akomi awa.


Yango wana moyangeli Pilato abimaki na libanda mpe atunaki bango : — Bofundi moto oyo mpo na likambo nini ?


Bazongiselaki ye : — Soki moto oyo asalaki mabe te, tolingaki mpe koya te kotika ye na maboko na yo.


Kobanda kaka na ngonga wana, Pilato akomaki koluka nzela ya kotika Yesu ; kasi Bayuda babandaki lisusu koganga : — Soki otiki ye, wana ozali na yo moninga ya Sezare te ! Pamba te moto nyonso oyo amikomisi mokonzi azali monguna ya Sezare.


Bakolonga mpe te kotalisa bosolo ya makambo oyo bafundeli ngai sik’oyo.


Biso, tomoni ete mosala ya moto oyo ezali : kotia mobulu ; azali kobimisa mobulu kati na Bayuda nyonso ya mokili mobimba. Azali mokambi ya lingomba moko ya bato ya Nazareti,


Bopesa oyo ekoki na mokonzi nyonso : mpako epai na ye oyo bosengeli kofuta yango, motuya ya biloko epai na ye oyo bosengeli kofuta yango, botosi epai na ye oyo asengeli kotosama, mpe lokumu epai na ye oyo asengeli kozwa yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ