Na tango wana, moto oyo bazalaki kobenga « Barabasi » azalaki kati na boloko elongo na batomboki oyo bayeisaki mobulu kati na engumba mpe babomaki moto.
mpe kuna, bakomaki kofunda Ye : — Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso ! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi !
Kasi batiaki kaka molende mpe balobaki : — Te ! Azali kotombokisa bato ya Yuda mobimba na nzela ya mateya na Ye ; abandaki yango na Galile kino akomi awa.