67 Balobaki : — Soki ozali Klisto, yebisa biso. Yesu azongisaki : — Ata nayebisi bino, bokondima na bino kaka Ngai te ;
Jeremi alobaki na mokonzi Sedesiasi : — Soki nayebisi yo yango, okoboma ngai te ? Ezala napesi yo toli, okoyokela na yo ngai te.
Abrayami alobaki na ye : « Soki baboyi koyoka Moyize mpe basakoli, bakondima mpe kaka te ata soki moto moko alamuki kati na bakufi. »
mpe soki Ngai napesi bino motuna, bokopesa na bino mpe Ngai eyano te.
Mokonzi ya Banganga-Nzambe apesaki Yesu mituna na tina na bayekoli na Ye mpe na tina na mateya na Ye.
Mpo na nini ozali kotuna Ngai mituna ? Tuna epai ya bato oyo bayokaki Ngai koloba. Ezali bango nde bakoki koyeba malamu makambo oyo nazalaki koloba.