Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 22:62 - Mokanda na Bomoi

62 Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 22:62
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te nakomi pene ya kokweya, pasi na ngai ezali kaka elongo na ngai tango nyonso.


Nayoki kolelalela ya Efrayimi : ‹ Opesi ngai etumbu lokola mwana ngombe ya mobali oyo ezali na liboma, mpe etumbu yango ekweyelaki ngai. Zongisa ngai, mpe nakozonga, pamba te ozali Yawe, Nzambe na ngai.


Batikali bakokima na likolo ya bangomba ; mpe kuna, bakokoma kolelalela lokola bibenga, moto na moto mpo na masumu na ye.


Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.


Bongo Petelo akanisaki maloba ya Yesu : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. » Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.


Esengo na bato oyo bazali kolela, pamba te bakobondisama !


Kaka na tango yango, soso elelaki mpo na mbala ya mibale. Bongo Petelo akanisaki maloba oyo Yesu alobaki na ye : « Liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato. » Mpe alelaki makasi.


Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo ; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. »


Bato oyo bazalaki kokengela Yesu babandaki koseka mpe kobeta Ye.


Yango wana, tika ete moto oyo azali kokanisa ete azali ya kotelema asala keba ete akweya te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ