Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 22:61 - Mokanda na Bomoi

61 Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo ; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 22:61
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye akoyemba na miso ya bato mpe akoloba : ‹ Nasalaki masumu mpe natambolaki na bosembo te, kasi nazwi lifuti oyo nasengelaki kozwa te.


mpo ete okanisa yango lisusu, oyokela yango soni mpe ofungola lisusu monoko na yo te mpo na soni, tango nakolimbisa masumu na yo mpo na mabe nyonso oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. › »


Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.


Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.


Bongo Petelo akanisaki maloba ya Yesu : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. » Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.


Mbala moko, Yesu mpe asosolaki ete nguya moko ebimi kati na Ye ; abalukaki epai ya ebele ya bato mpe atunaki : — Nani asimbi Ngai na bilamba ?


Nkolo azongiselaki ye : — Marte, Marte, ozali komitungisa mpe kominyokola mpo na makambo ebele,


Yesu alobaki na ye : — Petelo, nazali koloba na yo : lelo, liboso ete soso elela, okowangana mbala misato ete oyebi Ngai te.


Kasi Petelo azongisaki : — Nayebi te makambo oyo ozali kolobela ! Wana azalaki nanu koloba, soso elelaki.


Tango kaka Nkolo amonaki mwasi yango, ayokelaki ye mawa mingi mpe alobaki na ye : — Kolela te !


mpe atindaki bango epai ya Nkolo Yesu mpo na kotuna : — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ?


Yesu azongiselaki ye : — Obongami penza kokufa mpo na Ngai ! Nazali koloba na yo penza ya solo : liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.


Ezali Ye nde Nzambe atomboli na nzela ya loboko na Ye ya mobali lokola Mokonzi mpe Mobikisi, mpo ete bana ya Isalaele bakoka kozwa nzela ya kobongola mitema mpe kozwa bolimbisi ya masumu na bango.


Yango wana, bobosanaka te ete na kala, bozalaki Bapagano kolanda mbotama na bino ; mpe bato oyo bamibengaka « bato bakatama ngenga » bazalaki kobenga bino « bato bakatama ngenga te, » atako bazalaki bato bakatama ngenga kati na banzoto na bango na nzela ya mosala ya maboko ya bato.


Kanisa malamu esika oyo ozalaki, liboso ete okweya ! Bongola motema na yo mpe zongela misala na yo ya liboso ; noki te, nakoya epai na yo mpe nakolongola etelemiselo na yo ya mwinda na esika na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ