60 Kasi Petelo azongisaki : — Nayebi te makambo oyo ozali kolobela ! Wana azalaki nanu koloba, soso elelaki.
Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.
Yesu alobaki na ye : — Petelo, nazali koloba na yo : lelo, liboso ete soso elela, okowangana mbala misato ete oyebi Ngai te.
Sima na ngonga moko, moto mosusu alobaki na molende : — Ezali ya solo ! Tata oyo azalaki elongo na ye, pamba te azali moto ya Galile.
Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo ; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. »
Kasi Petelo awanganaki yango lisusu ; mpe mbala moko, soso elelaki.