Na tango wana, Petelo avandaki libanda, kati na lopango ya kati. Mwasi mosali moko apusanaki pene na ye mpe alobaki : — Yo mpe, ozalaki elongo na Yesu, moto ya Galile.
Mwasi mosali oyo azalaki kokengela ekuke atunaki Petelo : — Boni, yo mpe ozali te moko kati na bayekoli ya moto wana ? Petelo azongisaki : — Nazali moyekoli na ye te.