Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 22:53 - Mokanda na Bomoi

53 Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali ngonga na bino, ngonga oyo bokonzi ya molili ezali kokonza.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 22:53
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

elonga ya bato mabe ezalaka ya tango moke, mpe esengo ya moto oyo azangi boyengebene ewumelaka kaka mwa tango moke.


Yesu akotaki na lopango ya Tempelo ; mpe wana azalaki koteya, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye. Batunaki : — Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ?


Bongo Yesu alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, na bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe na bakambi ya bato, oyo bayaki kokanga Ye : — Boni, nakomi mokambi ya batomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe banzete ?


Bakangaki Yesu, bamemaki Ye kati na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Petelo azalaki kolanda na mosika.


Sik’oyo, molimo na Ngai etungisami ! Naloba nini ? Tata, kangola Ngai na tango oyo ya pasi ? Nzokande, ezali penza mpo na tango yango ya pasi nde nakomi kino na ngonga oyo !


Boye, tango kaka Yuda azwaki eteni yango ya lipa, abimaki mbala moko. Mpe butu ekotaki.


Kobanda sik’oyo, nakoloba na bino lisusu mingi te, pamba te mokonzi ya mokili oyo azali koya. Ezali te mpo ete azali na nguya moko te likolo na Ngai,


Na bongo, balukaki kokanga Yesu, kasi moto ata moko te alongaki ; pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.


Bakengeli ya Tempelo bazongaki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batunaki bakengeli : — Mpo na nini bomemi Yesu awa te ?


mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole ; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »


Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo.


Akangolaki biso na bokonzi ya molili mpe amemaki biso kati na bokonzi ya Mwana na Ye ya bolingo,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ