Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 22:52 - Mokanda na Bomoi

52 Bongo Yesu alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, na bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe na bakambi ya bato, oyo bayaki kokanga Ye : — Boni, nakomi mokambi ya batomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe banzete ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 22:52
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki mitindo epai ya bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko : « Bobimisa ye na molongo ! Mpe boboma na mopanga moto nyonso oyo akolanda ye ! » Pamba te Nganga-Nzambe alobaki : « Boboma ye te kati na Tempelo ya Yawe ! »


Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.


Kaka na ngonga yango, Yesu alobaki na ebele ya bato : — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ? Nazalaki kovanda mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te.


Ekomama : « Batangaki Ye elongo na babomi bato ; » mpe nazali koloba na bino : makambo yango esengeli kokokisama kati na Ngai.


Boye, Yuda akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpo na kobongisa elongo na bango ndenge nini akoteka Yesu epai na bango.


Kasi Yesu alobaki : — Boye lisusu te ! Yesu asimbaki litoyi ya mobali yango mpe abikisaki ye.


Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali ngonga na bino, ngonga oyo bokonzi ya molili ezali kokonza.


Wana nazalaki elongo na bango, nabatelaki bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai ; nabatelaki bango malamu, mpe moko te kati na bango abungaki, longola kaka ye oyo asengeli na libebi mpo ete Makomi ekokisama.


Mbala moko, mokonzi ya bakengeli akendeki elongo na basoda na ye mpo na kozwa bantoma. Kasi amemaki bango na makasi te, pamba te bazalaki kobanga ete bato babamba bango mabanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ