48 kasi Yesu atunaki ye : — Yuda, ozali penza koteka Mwana na Moto na nzela ya beze ?
Abundisi balingami na ye, abebisi boyokani na ye.
Bapota oyo molingami azokisi ezali malamu koleka babeze ebele ya monguna.
Wana Yesu azalaki nanu koloba, ebele ya bato bayaki ; mpe moto oyo bazalaki kobenga « Yuda, » moko kati na bayekoli zomi na mibale, azalaki liboso na bango. Apusanaki pene ya Yesu mpo na koyamba Ye,
Tango bato oyo bazalaki elongo na Yesu bamonaki makambo oyo ezali kosalema, batunaki Ye : — Nkolo, tobeta bango na nzela ya mipanga na biso ?